[male
vocals] 🕊️
Message
ya
mawa
mpo
na
libota
Lumbala
Mbote,
libota.
Aaaaaah
Mukendi
Patrick
Lumbala,
okeyi,
otiki
biso! 😭😭
Motema
na
biso
ezali
na
mawa
mingi.
Nazali
kotindela
bino
mawa
mpe
ba
condoléances
na
ngai
ya
motema
na
libota
mobimba
ya
Lumbala.
Nayebi
ete
ezali
likambo
ya
mpasi
mingi
kobungisa
moko
kati
na
biso,
kasi
nazali
kobondela
Yehova
mpo
ete
abondisa
biso,
apesa
biso
libɔndisi
mpe
makasi
ya
koleka
na
kati
ya
eleko
oyo
ya
mpasi.
Ezali
ngai,
ndeko
mpe
mwana
na
bino,
Docteur
Kelvin
Ntangu
KELA
Tsongo.
Naponaki
kolela
na
nzembo,
lokola
nazali
mokristo
ya
mokolo
ya
nsambo,
ya
Église
Adventiste
de
Mbudi.
Mpo
na
ndeko
na
ngai,
oncle
na
ngai,
Mukendi
Patrick
Lumbala.
Nabosanaka
te
ndenge
tozalaki
kosepela
na
masɛki
na
yo
mpe
masano
na
yo.
Kasi
lelo
oyo,
kokende
na
yo
etikeli
libota
libulu
monene
na
motema.
Moto
moko
te
akoki
kotondisa
esika
oyo
otiki.
Tozalaki
kosepela
na
bankombo
oyo
ozalaki
kopesa
biso.
Kasi
lelo
oyo
ozali
lisusu
awa
te.
Nani
akopesa
biso
lisusu
bankombo
wana?
Oncle
na
ngai,
Mukendi
Patrick
Lumbala,
mpo
na
nini
okendeki
boye? 😭
Libota
Lumbala
ezalaki
na
mposa
na
yo.
Clémentine
azali
kolela
yo,
Brigitte
mpe
azali
kolela
yo.
Mpo
na
nini
okamwisaki
biso
boye?
Salisa
biso
tózala
makasi
na
kati
ya
mawa
oyo.
Fanny
azali
kolela
yo,
Passy
mpe
azali
na
mposa
na
yo.
Zonga,
nabondeli
yo… 😭
Nazongeli
lisusu
kotindela
libota
mobimba
ya
Lumbala
mawa
mpe
ba
condoléances
na
ngai
ya
motema.
Marie
azali
kolela
yo,
Guelord
mpe
azali
kolela
yo,
mpe
Dougala
azali
na
mposa
na
yo. 🕊️
Molimo
na
yo
epema
na
kimia.
Mutu
na
suki
ya
pembe,
Maboko
pembe,
Elamba
pembe,
Kende
malamu.
Ezali
neveu
na
yo,
Kelvin
Ntangu
KELA,
oyo
azali
kolela
yo
na
nzembo,
elongo
na
mwana
moke
Keliode.
Bana
nyonso
bazali
koloba
na
yo: «
Pema
na
kimia.
Okotikala
libela
na
mitema
na
biso. » ❤️🕊️
Tosambeli
ete
Yehova
abondisa
libota
mobimba
ya
Lumbala,
apesa
moto
na
moto
makasi,
motema
ya
koyika
mpiko
mpe
libɔndisi
mpo
na
kokanga
motema
na
libunga
oyo
ya
monene.
Kende
malamu,
oncle
Mukendi
Patrick
Lumbala.
Tokobosana
yo
te.
Kombo
na
yo
ekotikala
libela
na
mitema
na
biso. 🕊️🙏🏽😭